Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kosala nyonso oyo azalaki na yango posa,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 9:1
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito ; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi.


Moboko ya Tempelo ya Yawe etiamaki na mobu ya minei, na sanza ya Zivi.


Salomo atongaki lisusu ndako na ye ya bokonzi ; asalaki mibu zomi na misato mpo na kosilisa kotonga yango.


Atongaki mpe ndako oyo bazalaki kobenga « Ndako ya Zamba ya Libani. » Ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. Ezalaki na milongo minei ya makonzi ya banzete ya sedele ; mpe na likolo ya makonzi yango, ezalaki na mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.


Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.


Na mokolo ya mwambe, Salomo azongisaki bato. Bongo bato bapambolaki ye mpe bazongaki na bandako na bango ya kapo na esengo mpe na nsayi na mitema mpo na bolamu nyonso oyo Yawe asalelaki Davidi, mowumbu na Ye, mpe Isalaele, bato na Ye.


Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,


akabelaki Irami, mokonzi ya Tiri, bingumba tuku mibale kati na Galile, pamba te Irami asungaki Salomo na nyonso oyo azalaki na yango na bosenga : mabaya ya sedele, ya sipele mpe wolo.


bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, kati na Libani mpe kati na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.


Tango Salomo asilisaki kosambela, moto ekitaki wuta na Likolo mpe ezikisaki mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo.


Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kokokisa nyonso oyo azalaki na yango na makanisi ya kosala kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako na ye moko,


Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,


Baalati mpe bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, na Libani mpe na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.


Napimelaki miso na ngai eloko moko te oyo elulaki, napimelaki motema na ngai esengo moko te. Motema na ngai esepelaki na misala na ngai nyonso, mpe yango ezalaki lifuti ya mosala na ngai nyonso.


Nazwaki mokano ya kosalisa misala minene : namitongelaki bandako minene mpe namilonelaki bilanga ya vino mpo na bomoi na ngai ;


Biloko oyo moto azali komona na miso ezali malamu koleka biloko oyo azali na yango na makanisi : yango mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ