Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:9
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito.


Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.


Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na likolo ya Sanduku, na liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ; kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Sanduku etikala wana kino na mokolo ya lelo.


Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi.


Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango.


Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata.


Boye Moyize alobi na Aron : — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya.


Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.


Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.


Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango.


Nkembo ya Yawe elongwaki na likolo ya basheribe mpe ekendeki na ekotelo ya Tempelo. Tempelo etondaki na lipata, mpe lopango na yango ya kati etondaki na kongenga ya Nkembo ya Yawe.


Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te ; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu.


« Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele.


Na mokolo oyo batelemisaki Mongombo, lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Litatoli. Wuta na pokwa kino na tongo, lipata oyo ezalaki likolo ya Mongombo ezalaki komonana lokola moto.


« Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino.


Atalisaki bino boyokani na Ye, mibeko zomi oyo bosengeli kosalela, mpe akomaki yango na bitando mibale ya mabanga.


Kati na yango, ezalaki na etumbelo ansa oyo basala na wolo ; ezalaki mpe na Sanduku ya Boyokani, oyo babamba wolo na mobimba na yango. Kati na Sanduku ya Boyokani, ezalaki na sani ya wolo, oyo batia mana kati na yango ; lingenda ya Aron oyo ebimisaki mito ya banzete, mpe bitando ya mabanga oyo batobolaki makomi ya mibeko ya boyokani.


Bongo lokola Tempelo etondaki na milinga kowuta na nkembo mpe na nguya ya Nzambe, moto moko te akokaki kokota kati na Tempelo yango kino bitumbu sambo oyo ba-anjelu sambo bamemaki esilaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ