Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:7 - Mokanda na Bomoi

7 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:7
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama : lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu ; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.


Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na Esika ya bule oyo ezali liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Etikala wana kino na mokolo ya lelo.


Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku.


Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa.


Na likolo na yango, bakotia bulangeti oyo esalema na poso ya nyama ya ebale, bakofinika liputa ya langi ya ble mpe bakotia mabaya ya komemela Sanduku ya Litatoli.


Na likolo ya Sanduku, ezalaki na bililingi ya basheribe ya nkembo, oyo ezipaki mofinuku ya Sanduku na nzela ya elili ya mapapu na yango. Kasi tokoki te sik’oyo kolobela biloko oyo na molayi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ