1 Bakonzi 8:64 - Mokanda na Bomoi64 Na mokolo yango, mokonzi abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana mbeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe elekaki moke mpo na koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.