Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:63 - Mokanda na Bomoi

63 Salomo abonzaki lokola mbeka ya boyokani bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bampate nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso ya Isalaele babulisaki Tempelo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:63
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo oyo elandaki, babonzaki bambeka mpe bambeka ya kotumba epai na Yawe : bangombe ya mibali nkoto moko, bameme ya mibali nkoto moko mpe bana meme nkoto moko elongo na makabo ya masanga ya vino mpe makabo mosusu ebele, mpo na Isalaele mobimba.


Na mokolo wana, kati na bomengo ya bitumba oyo bazongaki na yango, babonzelaki Yawe bangombe nkama sambo mpe bameme nkoto sambo.


Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso.


Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo ; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki.


Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe.


Mokonzi Salomo abonzaki lokola mbeka bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bameme nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso babulisaki Tempelo ya Nzambe.


Basilisaki kotonga Ndako mobimba ya Nzambe, na mokolo ya misato ya sanza ya Adari, tango mokonzi Dariusi akokisaki mibu motoba na bokonzi.


Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire.


Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.


Bingumba oyo ebebisama ekotonda lisusu na bato ebele lokola bibwele oyo bapesaka na mbeka, lokola bibwele oyo bamemaka na Yelusalemi na tango ya bafeti oyo ekatama. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »


Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele.


Yawe akosepela solo soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ? Boni, topesa solo bana na biso ya liboso mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ? Boni, topesa bana na biso ya mibali oyo bawuti na mikongo na biso mpo ete akoka kolongola masumu na biso ?


Ekomaki tango ya kosepela feti ya Kobulisa Tempelo ya Yelusalemi. Feti yango esalemaki na tango ya malili makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ