Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:60 - Mokanda na Bomoi

60 mpo ete bato nyonso kati na mokili bayeba solo ete Yawe azali Nzambe, mosusu lokola Ye azali te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:60
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakweyaki bilongi na se mpe bagangaki : — Solo, Yawe nde azali Nzambe ; Yawe nde azali Nzambe !


yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.


Tika ete mabondeli na ngai oyo nawuti kotombola epai na Yawe, Nzambe na biso, ezala liboso na Ye butu mpe moyi ; mpe tika ete alongisa mowumbu na Ye mpe Isalaele, bato na Ye, ndenge bosenga na bango ya mokolo na mokolo ezali ;


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe ! »


Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito.


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »


« Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo azali Mosikoli na yo, oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo : Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso, Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa, Ngai moko nde natandaki mabele.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nazali ebandeli mpe nazali suka ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te.


Bolenga te, bobanga mpe te. Boni, natatolaki yango te ? Nasakolaki yango te wuta kala ? Bozali batatoli na Ngai. Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ? Te, ezali na Libanga mosusu te, nayebi ata moko te. »


Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili ; pamba te Ngai, nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.


Boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali kati na Isalaele, ete nazali Yawe, Nzambe na bino, mpe ete Nzambe mosusu azali te. Bato na Ngai bakotikala koyoka lisusu soni te.


Omonaki makambo nyonso wana mpo oyeba ete Yawe kaka nde azali Nzambe, mosusu azali te.


Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te.


Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. »


Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ