58 kasi abongola mitema na biso epai na Ye mpo ete tokoka kotambola na nzela na Ye, kobatela mibeko na Ye, malako na Ye mpe mitindo na Ye oyo apesaki na batata na biso.
Tika ete mabondeli na ngai oyo nawuti kotombola epai na Yawe, Nzambe na biso, ezala liboso na Ye butu mpe moyi ; mpe tika ete alongisa mowumbu na Ye mpe Isalaele, bato na Ye, ndenge bosenga na bango ya mokolo na mokolo ezali ;
Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
Tokende na yo elongo, tokima mbangu ! Mokonzi akotisi ngai na bashambre na ye ! Tovanda elongo na esengo mpe tosepela na tina na yo, tosanzola bolingo na yo, oyo eleki vino ya kitoko na elengi. Solo, ezali na pamba te nde basi balulaka yo !
« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango,
apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !
Jozue alobaki : — Na bongo, bolongola sik’oyo banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino mpe bopesa mitema na bino nyonso epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele.