Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:56 - Mokanda na Bomoi

56 « Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:56
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boyeba ete liloba moko te oyo Yawe alobaki mpo na kotelemela ndako ya Akabi ekozanga kokokisama. Yawe akokisi makambo oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya.


Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko ! Bato nyonso balobaki : « Amen ! » Mpe bakumisaki Yawe !


Kasi okozala na mwana moko ya mobali oyo akozala moto ya kimia mpe ya boboto. Nakopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingeli ye. Kombo na ye ekozala Salomo ; mpe na mikolo nyonso oyo ye akozala mokonzi, nakopesa kimia mpe bopemi na Isalaele.


Alobaki na Yuda : « Totonga bingumba oyo, tozingela yango na bamir, na bandako milayi mpe na bikuke elongo na bikangelo na yango. Mokili ezali kati na bopemi liboso na biso, pamba te tolukaki Yawe, Nzambe na biso ; tolukaki Ye, mpe Ye apesi biso bopemi na bangambo nyonso. » Boye, batongaki mpe balongaki na mabongisi na bango.


Jetro alobaki : — Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo akangolaki yo wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya Faraon, Ye oyo akangolaki bato wuta na bowumbu ya bato ya Ejipito.


Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.


Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia.


Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.


kino tango Yawe akopesa bopemi epai ya bandeko na bino ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino bango lisusu bakozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango na ngambo mosusu ya Yordani. Sima na yango, bokozonga, moko na moko, na mabele oyo napesaki bino. »


Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ