55 Wana atelemaki, apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele na mongongo makasi mpe alobaki :
Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema.
Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe.
Tango Ezekiasi elongo na bakalaka na ye bayaki komona mipiku yango, bakumisaki Yawe mpe bapambolaki Isalaele, bato na Ye.
Moyize atalaki malamu misala yango mpe amonaki ete basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. Boye Moyize apambolaki bango.