52 Tika ete miso na Yo efungwama wana mowumbu na Yo mpe Isalaele, bato na Yo, bakobondela Yo ; yoka bango tango nyonso oyo bakotombola mingongo epai na Yo.
Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki na tina na yango : ‹ Kombo na Ngai ekozala awa. › Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo.
Pamba te, Nkolo Yawe, Yo moko nde oponaki bango kati na mabota nyonso ya mokili mpe otiaki bango pembeni, mpo ete bazala libula na Yo ndenge olobaki na mowumbu na Yo, Moyize, tango obimisaki batata na biso na Ejipito. »