Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:47 - Mokanda na Bomoi

47 mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi : ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:47
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango banguna bakolonga bato na Yo, Isalaele, mpo ete basali lisumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo,


soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bowumbu na bango mpe balobi : « Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; »


Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso ; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.


Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso, tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.


Boye, okokanisa etamboli na yo mpe okoyoka soni tango okoyamba bandeko na yo ya basi, ezala ba-oyo bazali mikolo na yo to ba-oyo bazali baleki na yo ; nakopesa yo bango lokola bana na yo ya basi, kasi ekozala te kolanda boyokani na Ngai elongo na yo.


mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »


Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino.


Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, ezala na mokili oyo eleki mosika, bakokanisa Ngai kaka. Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika mpe bakozonga na mokili na bango.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ