1 Bakonzi 8:39 - Mokanda na Bomoi39 yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, sala mpe zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema ya moto moko na moko. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.