1 Bakonzi 8:35 - Mokanda na Bomoi35 Tango likolo ekokangama mpe mvula ekozala lisusu te mpo ete basali masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.
Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo.