Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:25 - Mokanda na Bomoi

25 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : ‹ Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo : « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele.


Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba.


Solo, okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo ; makambo oyo olobaki na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.


Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Ndenge nini elenge akoki kowumela na nzela ya sembo ? Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.


Soki bana na yo babateli boyokani mpe mibeko na ngai, bana na bango mpe bakokitana na yo lokola bakonzi, mpe ekosalema bongo mpo na libela. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ