Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:24 - Mokanda na Bomoi

24 Solo, okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo ; makambo oyo olobaki na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:24
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye.


Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. »


Alobaki : — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama ; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na Davidi, tata na ngai, mpe akokisi, na loboko na Ye moko, makambo oyo alakaki :


mpe asambelaki : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se ! Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na motema na bango mobimba.


Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : ‹ Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. ›


Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.


Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya ; solo, nyonso ekokisamaki.


Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki : — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ