Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:21 - Mokanda na Bomoi

21 Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:21
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.


Sik’oyo, bobongisa mitema mpe milimo na bino mpo na koluka Yawe, Nzambe na bino. Bobanda kotonga Esika ya bule ya Yawe Nzambe mpo ete boyeisa Sanduku ya Boyokani ya Yawe mpe biloko ya bule ya Nzambe, na Tempelo oyo ekotongama mpo na Kombo na Yawe. »


Moyize azwaki makila, abwakelaki-bwakelaki yango bato mpe alobaki : — Oyo ezali makila ya boyokani oyo Yawe asali elongo na bino kolanda maloba oyo nyonso.


Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi.


« Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino.


Na suka ya mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, Yawe apesaki ngai bitando yango mibale ya mabanga ya boyokani.


Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ