1 Bakonzi 8:16 - Mokanda na Bomoi16 « Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala ; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, Yawe, Nzambe ya Isalaele, aponaki ngai kati na libota na ngai mobimba mpo ete nazala mokonzi ya Isalaele mpo na libela. Aponaki Yuda mpo ete azala mokonzi ; mpe kati na ndako ya Yuda, aponaki libota ya tata na ngai ; mpe kati na bana mibali ya tata na ngai, asepelaki kokomisa ngai mokonzi ya Isalaele mobimba.
Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.
Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.