15 Alobaki : — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama ; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na Davidi, tata na ngai, mpe akokisi, na loboko na Ye moko, makambo oyo alakaki :
Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›
Davidi alobaki na bato nyonso : — Bopambola Yawe, Nzambe na bino ! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
Na mokolo ya minei, basanganaki na lubwaku ya Beraka epai wapi bapambolaki Yawe. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango lubwaku ya Beraka.
Alobaki : — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama ; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na tata na ngai, Davidi, mpe akokisi, na maboko na Ye, makambo oyo alakaki :
Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.
Nagumbamaka na kotala na ngambo ya Tempelo na Yo ya Bule mpe nasanzolaka Kombo na Yo mpo na bolingo mpe boyengebene na Yo, pamba te osalaki ete Kombo na Yo ekende sango na nzela ya kokokisama ya bilaka na Yo.
Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
Tika ete Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Pamba te, kati na mawa monene na Ye, asalaki ete tobotama mbotama ya sika, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto kati na bakufi, mpo na kopesa biso elikya ya solo