Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 8:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 8:13
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.


Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.


Yeba sik’oyo ete Yawe aponi yo mpo ete otongela Ye Ndako oyo ekozala Esika na Ye ya Bule. Yika mpiko mpe sala mosala.


Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.


Alobaki na ngai : « Mwana na yo, Salomo, nde akotonga Ndako na Ngai mpe lopango na Ngai, pamba te naponaki ye mpo ete azala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala tata mpo na ye.


Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela ! »


Okomema bango mpe okovandisa bango na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, oh Nkolo, mpo na kovanda, Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki.


Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba.


Sik’oyo, tika ete balongola na miso na Ngai kindumba na bango mpe banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi, mpe Ngai nakovanda kati na bango mpo na libela.


Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Tempelo alapi yango na kombo ya Tempelo yango mpe na Kombo ya Ye oyo avandaka kati na yango.


pamba te toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.


Pamba te Klisto akotaki te na Esika ya Bule oyo esalemaki na maboko ya bato, oyo ezalaki kaka elilingi ya Esika ya Bule ya solo ; kasi akotaki nde kati na Likolo yango moko mpo ete atelema sik’oyo liboso ya Nzambe mpo na bolamu na biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ