1 Bakonzi 8:1 - Mokanda na Bomoi1 Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Davidi abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele, na Yelusalemi : bakonzi ya mabota, bakonzi ya masanga ya basoda oyo bazalaki kosalela mokonzi, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama ya basoda, babateli bozwi mpe bibwele ya mokonzi, bato oyo balandelaka bana na ye ya mibali elongo na basali ya ndako ya mokonzi, basoda ya mpiko mpe bato nyonso ya lokumu.