1 Bakonzi 7:48 - Mokanda na Bomoi48 Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe : etumbelo ; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ; အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezalaki na bamesa minei oyo basala na mabanga bakata mpo na bambeka ya kotumba ; bazalaki kosalela yango mpo na kotia bisalelo oyo babomelaka bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Bamesa yango nyonso ezalaki ndenge moko : na molayi, na mokuse mpe na bosanda ; molayi na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano, mokuse na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango ezalaki na basantimetele tuku mitano.