basani mpo na kotia putulu, bapawu, biloko ya songe mpo na misuni elongo na bisalelo na yango nyonso. Urami-Abi asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe ; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto.
Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo : basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo.
Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali : « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki : ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. ›
Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.