Atiaki bivandelo mitano elongo na basani na yango na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, mpe mitano mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi. Nzungu ya monene ya bronze etiamaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, pene na songe ya sude-este.
makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango,
Na Tibati mpe na Kuni, bingumba ya mokonzi Adadezeri, Davidi azwaki bronze ebele oyo, na mikolo oyo elandaki, Salomo asalaki na yango nzungu ya monene, makonzi mpe bisalelo mosusu ya bronze.
Salomo asalaki lisusu basani zomi ya minene : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano, na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo na kosukola bisalelo mpo na bambeka ya kotumba. Kasi Banganga-Nzambe bazalaki kosukola na nzungu ya monene.
Asalaki bamesa zomi mpe atiaki yango kati na eteni oyo eleki monene : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. Asalaki lisusu bakopo nkama moko ya wolo mpo na kosopela makila na likolo ya etumbelo.