Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 7:29 - Mokanda na Bomoi

29 Irami asalaki bililingi ya nkosi, ya bangombe mpe ya basheribe, mpe abambaki yango likolo ya bitando mpe likolo ya bibende mosusu ya bronze. Ezalaki na bililingi ya singa ya bafololo na se mpe na likolo ya bangombe mpe ya bankosi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 7:29
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi.


Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama : lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu ; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale : misato etalaki na ngambo ya nor ; misato, na ngambo ya weste ; misato, na ngambo ya sude, mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima na bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati.


Tala ndenge basalaki bivandelo yango : bakangisaki bitando ya bronze mpe balekisaki bibende mosusu ya bronze mpo na kosimba yango.


Shario moko na moko ezalaki na bapine minei ya bronze mpe na bibende ya bronze mpo na kosimba bapine.


Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.


Asalaki bikeko mibale ya basheribe oyo atiaki na suka mibale ya mofinuku ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.


Tala ndenge bilongi na yango ezalaki : ekelamu moko na moko kati na nyonso minei ezalaki na elongi lokola ya moto (na liboso) : elongi lokola ya nkosi na ngambo ya loboko ya mobali, elongi lokola ya ngombe ya mobali na ngambo ya loboko ya mwasi mpe elongi lokola ya mpongo (na sima).


Sheribe moko na moko azalaki na bilongi minei : elongi ya liboso ezalaki lokola elongi ya sheribe, ya mibale lokola elongi ya moto, ya misato lokola elongi ya nkosi mpe ya minei lokola elongi ya mpongo.


Pamba te nakozala lokola nkosi liboso ya Efrayimi, mpe lokola mwana nkosi liboso ya Yuda. Nakokata-kata bango na biteni mpe nakokende, nakomema bango, mpe moto akobikisa bango akozala te.


Na likolo ya Sanduku, ezalaki na bililingi ya basheribe ya nkembo, oyo ezipaki mofinuku ya Sanduku na nzela ya elili ya mapapu na yango. Kasi tokoki te sik’oyo kolobela biloko oyo na molayi.


Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.


Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ