Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 7:27 - Mokanda na Bomoi

27 Irami asalaki lisusu bivandelo zomi ya bronze : evandelo moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na molayi, bametele pene mibale na mokuse, metele moko na basantimetele tuku mitano na bosanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 7:27
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei.


Tala ndenge basalaki bivandelo yango : bakangisaki bitando ya bronze mpe balekisaki bibende mosusu ya bronze mpo na kosimba yango.


Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze ; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko.


Mokonzi Akazi alongolaki mabaya oyo esimbaka bamesa, mpe alongolaki basani ya minene na likolo na yango ; akitisaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na likolo ya bikeko ya bangombe mpe atiaki yango na likolo ya mabanga babongisa malamu.


Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni.


Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene mpe bashario.


bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene, oyo batiaki na likolo ya bivandelo,


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana,


Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango nyonso na Babiloni bisalelo.


Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo mokonzi Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki kosimba nzungu ya monene mpe bashario.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ