Batobolaki bililingi na mabaya ya sedele oyo balatisaki na bamir ya kati ya Tempelo, mpo na kotia bilembo oyo ezalaki na lolenge ya bakolokente mpe ya bafololo efungwama ; balatisaki kati nyonso ya Tempelo na mabaya ya banzete ya sedele, mpe ata libanga moko te ezalaki komonana.
Irami atiaki milongo mibale ya bililingi ya bambuma ya grenade zingazinga ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kokomisa mito ya makonzi yango kitoko.
Bazingelaki moto ya likonzi moko na moko na bililingi ya bambuma ya grenade nkama mibale oyo ezalaki likolo ya bililingi ya basinga oyo basala lokola ya monyama.