16 Asalaki lisusu na bronze banyangwisa na moto mito ya makonzi mpo na kotia yango na songe : moto moko na moko ya likonzi ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda.
Batiaki na mito ya makonzi yango bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni. Na moto ya likonzi moko na moko, ezalaki na bililingi sambo.
Makolo ya makonzi ezalaki ya bronze ; bibende egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. Makonzi nyonso ya lopango ezalaki na biloko ya palata ya kosimbela.
Ezalaki mpe na makonzi minei mpe bivandelo minei ya bronze. Bibende na yango oyo egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela rido ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata.
Basalaki na bronze moto ya likonzi moko na moko, mpe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe na bambuma ya grenade ; nyonso esalemaki na bronze.