Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 7:15 - Mokanda na Bomoi

15 Irami asalaki makonzi nyonso mibale ya bronze : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na molayi, mpe bametele pene motoba na monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 7:15
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asalaki lisusu na bronze banyangwisa na moto mito ya makonzi mpo na kotia yango na songe : moto moko na moko ya likonzi ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda.


Irami atongaki makonzi nyonso mibale liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ; abengaki likonzi oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mobali Yakini, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi, Boazi.


makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango,


Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni.


Na Tibati mpe na Kuni, bingumba ya mokonzi Adadezeri, Davidi azwaki bronze ebele oyo, na mikolo oyo elandaki, Salomo asalaki na yango nzungu ya monene, makonzi mpe bisalelo mosusu ya bronze.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana,


Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene.


Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango nyonso na Babiloni bisalelo.


Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa, na bosanda, mpe bametele pene motoba, na kovimba na yango ; bongo bronze oyo basalelaki yango ezalaki evimba na basantimetele pene mwambe, mpe ezalaki polele na kati.


Ndako moke ya kokotela ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe motoba na mokuse. Bazalaki komata na ematelo ya bibutelo zomi mpo na kokota na ndako moke ya kokotela, na bangambo nyonso mibale. Batelemisaki likonzi moko na ngambo moko na moko ya ekotelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ