Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 7:14 - Mokanda na Bomoi

14 oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri ; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 7:14
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, tika ete nkolo na ngai atinda epai ya basali na ye ble, orje, mafuta mpe masanga ya vino oyo alakaki.


Boye, tindela ngai moto oyo ayebi kosalela wolo, palata, bronze, ebende, langi ya motane ya pete, langi ya motane ya makasi mpe langi ya ble, mpe ayebi kotobola bililingi, mpo ete asala mosala, kati na Yuda mpe Yelusalemi, elongo na basali na ngai, oyo bayebi penza mosala, ba-oyo Davidi, tata na ngai, abongisaki.


Urami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Urami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Nzambe :


basani mpo na kotia putulu, bapawu, biloko ya songe mpo na misuni elongo na bisalelo na yango nyonso. Urami-Abi asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe ; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto.


Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai.


Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ;


atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso :


Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.


Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki.


Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko.


Nzambe na ye ateyaka ye mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ