Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 6:6 - Mokanda na Bomoi

6 Etaje oyo ya se ya biteni yango ya mike ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse ; etaje ya kati-kati, bametele pene misato na mokuse ; mpe etaje oyo ya misato, bametele misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. Boye bamir ya libanda ya Tempelo etikalaki lisusu minene te na likolo mpo ete motondo ebebisa bamir ya Tempelo te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 6:6
4 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje.


Mpo na kotonga Tempelo, basalelaki kaka mabanga oyo ebongisamaki malamu wuta na esika oyo bapasolaki yango ; boye, esalaki ete makelele ya marto, ya epasola to ya esalelo mosusu ya ebende etikalaki koyokana te wana bazalaki kotonga yango.


Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, na likolo ya ngomba Morija epai wapi Yawe abimelaki Davidi, tata na ye, mpe kaka na esika oyo Davidi abongisaki na etando ya Orinani, moto ya Yebusi.


Ezalaki na ba-etaje misato oyo moko na moko, kati na yango, ezalaki na bashambre tuku misato oyo esimbamaki na mir batonga zingazinga ya Tempelo. Bamir yango ezalaki ekangana yango na yango, kasi ezalaki ya kokangana na mir ya Tempelo te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ