1 Bakonzi 6:5 - Mokanda na Bomoi5 Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Etaje oyo ya se ya biteni yango ya mike ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse ; etaje ya kati-kati, bametele pene misato na mokuse ; mpe etaje oyo ya misato, bametele misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. Boye bamir ya libanda ya Tempelo etikalaki lisusu minene te na likolo mpo ete motondo ebebisa bamir ya Tempelo te.
Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango,