38 Basilisaki kotonga Tempelo ya Yawe elongo na biteni na yango nyonso na sanza ya Buli oyo ezali sanza ya mwambe, na mobu ya zomi na moko. Salomo asalaki mibu sambo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe.
Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi.
Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali : — Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.
Ezali boye nde misala nyonso ya Salomo esalemaki, kobanda na mokolo oyo batongaki moboko ya Tempelo ya Yawe kino na mokolo oyo esilaki. Boye, Tempelo ya Yawe esilaki kotongama.
— Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.