36 Salomo azingelaki lopango ya kati na mir oyo batonga na milongo misato ya mabanga bakata mpe bamatisa moko likolo ya mosusu, mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo.
Atobolaki likolo na yango bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama ; mpe abambaki yango wolo na kolanda bandelo ya bililingi yango.
Salomo azingelaki lopango monene na mir ya milongo misato ya mabanga bakata mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele, ndenge ezalaki mpo na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe mpe mpo na ndako moke ya kokotela.
Salomo abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana bambeka ya kotumba mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo Salomo atongaki ekokaki te koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta.
Ekozala na milongo misato ya mabanga bakata mpe molongo moko ya mabaya ya sika mpo na motondo. Mbongo ya kofuta mpo na misala yango ekowuta na bomengo ya mokonzi.
Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo.
Amemaki ngai na kati ya lopango ya kati, na nzela ya ekuke ya sude ; amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke ya ngambo ya sude : ezalaki ndenge moko kaka na bikuke mosusu.
Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.