Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 6:33 - Mokanda na Bomoi

33 Asalaki mpe ndenge moko mpo na ekotelo ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : kadre na mabaya ya banzete ya olive, bizipelo mibale na mabaya ya banzete ya sipele. Monene na yango ezwaki ndambo moko kati na bandambo minei ya mokuse ya mir.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 6:33
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, asalaki na nzete ya olive bililingi mibale ya basheribe : sheribe moko na moko ezalaki na bametele pene mitano na molayi.


Atobolaki bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama na bizipelo nyonso mibale oyo basalaki na mabaya ya banzete ya olive ; abambaki wolo oyo balekisa na moto na bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.


Asalaki lisusu na mabaya ya sipele bizipelo mibale ; ezipelo ya liboso ezalaki na biteni ya mabaya mibale oyo ebalukaka, mpe ezipelo ya mibale ezalaki na barido mibale oyo ebalukaka.


Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango.


Mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na bangambo na yango nyonso, ezalaki ndenge moko na molayi ; mpe mabaya oyo ezalaki liboso ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ezalaki mpe kaka ndenge moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ