Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 6:32 - Mokanda na Bomoi

32 Atobolaki bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama na bizipelo nyonso mibale oyo basalaki na mabaya ya banzete ya olive ; abambaki wolo oyo balekisa na moto na bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 6:32
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batobolaki bililingi na mabaya ya sedele oyo balatisaki na bamir ya kati ya Tempelo, mpo na kotia bilembo oyo ezalaki na lolenge ya bakolokente mpe ya bafololo efungwama ; balatisaki kati nyonso ya Tempelo na mabaya ya banzete ya sedele, mpe ata libanga moko te ezalaki komonana.


Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, asalaki na nzete ya olive bililingi mibale ya basheribe : sheribe moko na moko ezalaki na bametele pene mitano na molayi.


Atobolaki na bamir oyo ezingelaki Tempelo, ezala na kati to na libanda, bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama.


Salomo asalaki na mabaya ya banzete ya olive, na ekotelo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, ekuke moko ya bizipelo mibale : monene ya kadre ya mabaya ya ekuke ezwaki ndambo moko kati na bandambo mitano ya mokuse ya mir.


Asalaki mpe ndenge moko mpo na ekotelo ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : kadre na mabaya ya banzete ya olive, bizipelo mibale na mabaya ya banzete ya sipele. Monene na yango ezwaki ndambo moko kati na bandambo minei ya mokuse ya mir.


bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, bikangelo ya wolo ya bikuke ya Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo.


Bandako mike ya bakengeli elongo na makonzi na yango ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Na likonzi moko na moko, basalaki bililingi ya banzete ya mbila.


batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila. Bililingi ya banzete ya mbila ezalaki elandana na bililingi ya basheribe. Boye, Sheribe moko na moko azalaki na bilongi mibale :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ