Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 6:3 - Mokanda na Bomoi

3 Liboso ya Tempelo, na liboso ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo, ezalaki na ndako moko ya moke ya kokotela oyo ezalaki na bametele pene zomi na mokuse ; molayi na yango ezalaki ndenge moko na mokuse ya Tempelo ; mpe ekota na kati na bametele pene mitano.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 6:3
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tempelo oyo Salomo atongaki mpo na Yawe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, bametele pene zomi na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.


Atiaki na bamir ya Tempelo maninisa oyo batia biyungulu.


Salomo azingelaki lopango monene na mir ya milongo misato ya mabanga bakata mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele, ndenge ezalaki mpo na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe mpe mpo na ndako moke ya kokotela.


Irami atongaki makonzi nyonso mibale liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ; abengaki likonzi oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mobali Yakini, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi, Boazi.


Davidi apesaki Salomo, mwana na ye ya mobali, elili ya ndako moke ya kokotela na Tempelo, ya bandako mosusu ya Tempelo, ya bibombelo na yango, ya bashambre na yango ya likolo, ya bashambre na yango ya kati mpe ya esika ya bolimbisi masumu.


Amemaki ngai na ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe amekaki molayi ya makonzi na yango : ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na bangambo nyonso ; mokuse ya ekotelo ezalaki na bametele pene sambo, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo.


Amekaki lisusu molayi ya ndako oyo etalana na lopango, na sima ya Tempelo elongo na nzela na yango ngambo na ngambo : ezalaki na bametele pene tuku mitano. Kati na Tempelo, eteni oyo eleki monene, Esika ya bule ya kati mpe ndako moke ya kokotela oyo etalana na lopango,


Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo


Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, na veranda ya Salomo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ