16 Atongaki na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, etando ya bametele pene zomi kati na Tempelo ; abongisaki yango mpo ete ezala Esika-Oyo-Eleki-Bule.
Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje.
Atongaki Esika-Oyo-Eleki-Bule ; molayi na yango ekokanaki na mokuse ya Tempelo ya Yawe : bametele pene zomi, na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto ya bakilo pene nkoto tuku mibale kati na Tempelo ya Yawe.
Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse ; mpe alobaki na ngai : « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
Kati na etuka wana ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse, bokokata eteni ya mabele mpo na Esika ya bule, Esika-Oyo-Eleki-Bule.
Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te ; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu.