Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 5:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi ; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 5:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki : — Banani wana bazali elongo na yo ? Jakobi azongisaki : — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.


mpe alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama, Ye oyo, na mokolo ya lelo, apesi ngai nzela ya komona moto oyo akitani na ngai na bokonzi ! »


Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. »


Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Kati na Isalaele mobimba, Salomo atiaki mpe bayangeli zomi na mibale ya bituka, oyo bazalaki na mokumba ya komema biloko mpo na mokonzi mpe mpo na ndako na ye. Moyangeli moko na moko asengelaki kopesa biloko mpo na sanza moko na mobu.


Salomo azalaki na mapango nkoto minei ya bampunda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale.


Bazalaki mpe komema bambuma ya orje mpe matiti mpo na bampunda, ndenge mobateli biloko ya mokonzi azalaki kokatela bango.


Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai !


Masese ya Salomo : Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi mwana ya zoba ayokisaka mama na ye pasi na motema.


Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.


Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.


Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi, mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.


Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona.


Bokonzi na ye ekokende mosika penza, mpe kimia na ye ekozala na suka te. Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, akozala mokonzi ya mokili na ye, akolendisa mpe akokamba yango na bosembo mpe na boyengebene, wuta na tango oyo kino libela na libela. Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akosala na bolingo makasi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ