Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi ; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga.
Atongaki na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, etando ya bametele pene zomi kati na Tempelo ; abongisaki yango mpo ete ezala Esika-Oyo-Eleki-Bule.
Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi ; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto ; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele.
bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, kati na Libani mpe kati na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.
Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.
Nalobaki na bango : — Soki bomoni ete ezali malamu, bopesa ngai lifuti na ngai ; soki te, botika na bino. Bafutaki ngai mbongo ya bibende ya palata tuku misato lokola lifuti na ngai.
Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.