Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 5:5 - Mokanda na Bomoi

5 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 5:5
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango ; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »


Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi, mpe akomela mayi ya libulu na ye


Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi.


Ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai. Akozala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala Tata mpo na ye, nakolendisa kiti na ye ya bokonzi kati na Isalaele mpo na libela. ›


Yeba sik’oyo ete Yawe aponi yo mpo ete otongela Ye Ndako oyo ekozala Esika na Ye ya Bule. Yika mpiko mpe sala mosala.


Alobaki na ngai : « Mwana na yo, Salomo, nde akotonga Ndako na Ngai mpe lopango na Ngai, pamba te naponaki ye mpo ete azala mwana mpo na Ngai, mpe Ngai nakozala tata mpo na ye.


Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili ;


mpe mabele ekobota mbuma na yango, bokolia mpe bokotonda mpe bokovanda na kimia.


Moto nyonso akovanda na kimia kati na bilanga na ye ya vino mpe na se ya nzete na ye ya figi. Moto moko te akobangisa ye, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde alobi.


Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.


Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ