Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 bangombe zomi ya mafuta, bangombe tuku mibale ya esobe, bameme mpe bantaba nkama moko, bakisa bamboloko, bambuli, bankayi mpe bandeke ya mafuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 5:3
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango ; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »


kasi tala maloba oyo Yawe alobaki na ngai : ‹ Osopaki makila ebele mpe obundaki bitumba ebele. Okoki te kotonga ndako mpo na Kombo na Ngai ; pamba te kati na mokili, osopaki makila ebele na miso na Ngai.


Mokonzi Davidi atelemaki mpe alobaki : — Boyoka ngai, bandeko na ngai mpe bato na ngai : Nazalaki na likanisi ya kotonga esika ya kopema mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, enyatelo ya makolo ya Nzambe na biso ; bongo nabongisaki biloko mpo na kotonga yango.


Kasi Nzambe alobaki na ngai : « Okotonga ndako mpo na Kombo na Ngai te, pamba te ozali moto ya bitumba mpe osopaki makila. »


bilei oyo azalaki kolia na mesa na ye, ndako ya basali na ye, esaleli mpe elateli ya basali na ye, basali oyo bapesaka ye masanga mpe bambeka ya kotumba oyo azalaki kobonza kati na Tempelo ya Yawe, mwasi mokonzi ya Saba akamwaki makasi.


Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga.


Mikolo nyonso, bazalaki kolambela ngai ngombe moko ya mobali, meme motoba ya malamu mpe basoso ; mpe sima na mikolo zomi nyonso, bazalaki koya kotikela ngai vino ebele. Atako bongo, natikalaki kosenga eloko moko te kati na biloko oyo esengeli mpo na moyangeli, pamba te mokumba ya misala ezalaki makasi na mito ya bato.


Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu ;


Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.


Nzambe atia nyonso na se ya matambe ya Yesu mpe apona Yesu mpo ete akonza nyonso lokola Mokonzi ya Lingomba


mbuli, mboloko, pambi, ntaba ya zamba, meme ya zamba, mbita mpe mpakasa.


Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo : « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ