18 Kasi sik’oyo, Yawe, Nzambe na ngai, apesi ngai bopemi na bangambo nyonso, mpe ezali lisusu na monguna moko te mpe na likambo moko te oyo ekoki kobangisa ngai.
Azalaki kokonza bikolo nyonso na ngambo ya weste ya Efrate, kobanda na Tifisa kino na Gaza, elongo na bakonzi nyonso ya ngambo yango ; mpe azalaki na kimia elongo na bikolo nyonso ya zingazinga.
Boye, Davidi apesaki mitindo ya kosangisa bapaya oyo bazalaki kovanda na Isalaele. Mpe kati na bango, aponaki bato oyo bakataka mabanga mpo na kotonga Ndako ya Nzambe.
Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya nde bazalaki kosala epai na yo mosala ya kobamba madusu na yo mpo ete mayi ekota te ; bamasuwa nyonso ya ebale monene mpe batambolisi na yango bazalaki koya epai na yo mpo na kosomba biloko oyo ozalaki koteka.