Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 5:1
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate :


Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako.


atindaki Yorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Toyi. Yorami amemelaki Davidi biloko ya palata, ya wolo mpe ya bronze.


Kati na bato oyo bazalaki kokende kotala Salomo, moko na moko azalaki komemela ye lokola kado : biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso.


Bwanya ya Salomo ezalaki makasi koleka bwanya ya bato nyonso ya ngambo ya este mpe ya Ejipito.


Alobaki na tina na banzete, kobanda na nzete ya sedele ya Libani kino na nzete ya izope oyo ebimaka na mir ; azalaki mpe koloba na tina na banyama mpe bandeke, na tina na bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe na tina na bambisi ya mayi.


Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, bato oyo bapasolaka mabanga mpe basharipantie ; mpe batongelaki ye ndako.


Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi ; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo.


Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele.


Azalaki likolo ya bakonzi nyonso, longwa na Ebale (Efrate) kino na mokili ya bato ya Filisitia mpe na mondelo ya Ejipito.


Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.


Mokonzi asepeli na kitoko na yo ; lokola azali nkolo na yo, gumbama liboso na ye.


Tika ete akonza longwa na ebale moko ya monene kino na ebale mosusu ya monene, longwa na ebale Efrate kino na suka ya mokili.


Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene, mpe mito na yango ya sika kino na ebale.


Mpo na bolamu na yo, nakobengana bikolo liboso na yo mpe nakoyeisa mokili na yo monene. Moto moko te akoluka kobotola mokili na yo tango okobanda komata mbala misato na mobu, mpo na kokutana na Yawe, Nzambe na yo.


Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele.


Bitape na yango ezalaki makasi, ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi, ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu ; eyebanaki makasi mpo na molayi na yango mpe mpo na ebele ya makasa na yango.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.


Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, bokonzi na bango ekozala ya lokumu.


pamba te alingaka ekolo na biso, mpe ye nde atongaki ndako na biso ya mayangani.


Soki bandimi mpe bafungoli bikuke na bango, bokosalisa bato nyonso ya engumba wana misala makasi mpe bakosalela bino.


Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? » Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ