Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu : — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
Boye, Davidi apesaki mitindo na Joabi mpe na bakambi ya bato : — Bokende kotanga bato ya Isalaele, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpe boyebisa ngai motango na bango mpo ete nayeba.