Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 3:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokonzi akendeki na Gabaoni mpo na kobonza mbeka, pamba te ezalaki esambelo ya likolo ya ngomba oyo elekaki motuya, mpe kuna, Salomo abonzaki bambeka ya kotumba nkoto moko, na etumbelo wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 3:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku ya Yawe, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na yango.


Salomo abonzaki lokola mbeka ya boyokani bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bampate nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso ya Isalaele babulisaki Tempelo ya Yawe.


Yawe abimelaki Salomo na mbala ya mibale, ndenge kaka abimelaki ye na mbala ya liboso, na Gabaoni.


Davidi atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki mpe Banganga-Nzambe mosusu, liboso ya Mongombo ya Yawe na esambelo ya likolo ya ngomba, oyo ezalaki na Gabaoni,


Mongombo na Yawe oyo Moyize atongaki na esobe mpe etumbelo ya bambeka ya kotumba ezalaki na tango wana, na esambelo ya likolo ya ngomba ya Gabaoni.


Salomo abengisaki Isalaele mobimba : bakonzi ya bankoto ya basoda, bakonzi ya bankama ya basoda, basambisi, bakambi ya Isalaele mobimba mpe bakambi ya mabota.


Bongo, Salomo elongo na lisanga mobimba bakendeki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni, pamba te Ndako ya kapo ya Bokutani ya Nzambe, oyo Moyize, mosali na Yawe, atelemisaki na esobe ezalaki kuna.


Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo ; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki.


Mokonzi Salomo abonzaki lokola mbeka bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bameme nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso babulisaki Tempelo ya Nzambe.


Banzete ya Libani ekokoka te mpo na kopelisa moto ya etumbelo, mpe banyama na yango ekokoka te mpo na kotumba mbeka.


Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso :


Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi ; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.


Tala bingumba ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango : Jeriko, Beti-Ogila, Emeki-Ketsitsi,


Tango mpe bato ya Gabaoni bayokaki makambo oyo Jozue asalaki na Jeriko mpe na Ayi,


Saulo alobaki : « Bomemela ngai banyama ya mbeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. » Mpe Saulo abonzaki mbeka ya kotumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ