Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakonzi 3:26 - Mokanda na Bomoi

26 Mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi, ayokaki pasi na motema mpo na mwana na ye mpe alobaki na mokonzi : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Pesa ye mwana oyo azali na bomoi, koboma mwana te ! Kasi mwasi mosusu alobaki : — Kata ye ! Na bongo, akozala ya ngai te, mpe akozala ya ye te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakonzi 3:26
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi ayokaki pasi makasi na motema tango amonaki ndeko na ye, akimaki mbangu na libanda mpe alukaki esika mpo na kolela. Akotaki na shambre na ye mpe alelaki kuna.


Mokonzi apesaki mitindo : — Bokata mwana oyo azali na bomoi na biteni mibale, bopesa eteni moko na mwasi moko ; mpe eteni mosusu, na mwasi mosusu.


Boye, mokonzi akataki likambo, alobaki : — Boboma mwana te ! Bopesa mwana oyo azali na bomoi epai ya mwasi ya liboso, pamba te ye nde azali mama na ye.


Boye nakangaki monoko na ngai mpe navandaki nye, natikalaki koloba ata likambo moko te ; pasi na ngai ebakisamaki makasi.


Boni, mama akoki solo kobosana bebe na ye oyo azali komelisa mabele, to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? Ata soki akoki kobosana, ngai nakoki kobosana yo te !


Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


bato bazanga mayele, bosembo, bolingo mpe mawa.


Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.


Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino,


kozanga bolingo, kozanga mawa, kokosela baninga makambo, kozanga makoki ya komikanga, bato na kanza, banguna ya bolamu,


Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ