Mwasi mosusu alobaki : — Te, ezali lokuta ! Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi oyo akufi azali mwana na yo ! Kasi mwasi oyo azwaki maloba liboso alobaki lisusu : — Te ! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi oyo ya bomoi azali nde mwana na ngai ! Na bongo, bakomaki koswana liboso ya mokonzi.