1 Bakonzi 3:21 - Mokanda na Bomoi21 Na tongo, tango nalamuki mpo na komelisa mwana na ngai mabele, namoni ete mwana azali ya kokufa. Kasi tango natali ye penza malamu, kaka na tongo yango, namoni ete ezali mwana na ngai te, oyo ngai nabotaki ! အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mwasi mosusu alobaki : — Te, ezali lokuta ! Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi oyo akufi azali mwana na yo ! Kasi mwasi oyo azwaki maloba liboso alobaki lisusu : — Te ! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi oyo ya bomoi azali nde mwana na ngai ! Na bongo, bakomaki koswana liboso ya mokonzi.