16 Basi ya ndumba mibale bayaki epai ya mokonzi mpe batelemaki liboso na ye.
Salomo alamukaki mpe asosolaki ete ezalaki ndoto. Azongaki na Yelusalemi, atelemaki liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani ; mpe asalisaki feti monene elongo na basali na ye nyonso.
Moko na bango alobaki : — Nabondeli yo, nkolo na ngai, yoka ngai ! Ngai mpe mwasi oyo, tovandaka ndako moko. Tozalaki na ye na ndako tango nabotaki mwana.
Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa.
Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe.
Nzambe azwaka nkembo mpo ete asalaka makambo oyo bato bayebaka te, mpe bakonzi bazwaka nkembo mpo ete balukaka kososola tina ya makambo.
Bobebisa te lokumu ya bana na bino ya basi na kokomisa bango basi ya ndumba, noki te mboka mobimba ekomipesa na kindumba mpe ekotonda na mabe.
liboso ya Moyize, ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya bakambi ya lisanga mobimba, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe balobaki :
Tika ete awumela epai na yo, na esika nyonso oyo alingi, mpe na engumba nyonso oyo aponi ; konyokola ye te.
Wuta na Shitimi, Jozue, mwana mobali ya Nuni, atindaki na nkuku banongi mibale ; alobaki na bango : — Bokende kononga mokili, mingi-mingi Jeriko. Boye, bakendeki mpe bakotaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba, Raabi, mpe bavandaki kuna.
Jefite, moto ya Galadi, azalaki elombe ya bitumba. Azalaki mwana mobali oyo Galadi abotaki na mwasi ya makangu.