1 Bakonzi 3:13 - Mokanda na Bomoi13 Nakopesa yo lisusu oyo osengi te : bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu.
ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa ; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.